Paroles de la chanson : Mpiak’Corona de Yekima de Bel’Art.
Par sagaziks | Le jeudi, 25 juin 2020 à 15:40 | Commentaires (0) | LYRICS 243
Découvrez la nouvelle chanson slam « Mpiak’Corona » de Monsieur le Poésident Yekima de Bel’Art.
Artiste: Yekima De Bel'Art
Titre: Mpiak'Corona
Genre: Afroslam
Durée: 4' 10"
Album: Single
Année: 2020
Pays: RD Congo
[Intro]
Benji on the beat
Yango bokono'ango ya ndenge nini'oyo
(Toussotement)
[Couplet 1]
Nga moto'a kopo’a malili epa Ma' Mapasa na mwa lituma
Mwasi na nga a lula ngand'a ntaba
A kotisa nga libal'a ngolo moseka
Mpaka Polo ye a lingaka a leka mwa mopepe na Kimbuta
Mwa nzete na songe’a munoko
Mwa mulangi ya Mpakasa
Ma’ nzele a'a moto moko
Oyo suka'a pokwa
Noko ye nde ngulu'a Kapela to to poulet mayo'a Bandal
Miziki e zo toka
Makasu
Mondongo na mwa mankenena na mesa
Chayeur ye soki a wuti shida
A bimaka a benda chikata
A bosana pasi ya mokili
Po a'obi mbongo e'a bitumba
Leki'a mobali ye a lingaka ko lata
Ko bima
Ya mwasi kitalatala
Putulu ya bonzenga na elongi
Ko kende biyenga na Cheetah
Esengo n'e mwa selfie na restos to toilettes ya ba boîtes
Awa biso ka'a kikoso
E'o simba
Na ngong'a pokwa bilenge ba zalaka
Ba tondi ba ekala
Ko ganga wooo wayi wooo
Butu-butu ko suanela Messi na Ronaldo
To mesana makelele
Na nzela moko eklezya ekala
Ekala eklezya
Sika nionso e calé
[Pont]
Yango banda makamb’oyo e ye
Pssss solo bizaleli mabe ebel'e bongwani
Mabe kaka
Mingi to beta libanga na zando
Ko lukela libota bomoi
Mikolo nionso ko bima tongo-tongo
Soki te ko lia pasi
Bongo awa to'o bima te
To'o sa'a boni
Ba'obi oh libanda to keba bokono kombo Covid
Kasi banda eye biso awa nde kopo vide
Nzungu vide
Mesa vide
Mpiaka na Corona e sangani
[Refrain]
Mpiak'Corona
Mpiak'Corona
Mpiak'Corona
Mpiak'Corona (×2)
[Couplet 2]
To sokola maboko
Po mwa fufu na mpiodi e'a na mesa
Aawa to sukoli po na bokono
Ebongo ya ko lia
Dollars p'e zo mata kaka
Coopérant a liaka na'o bima
Ba ndak’oy’a biso e koma
Litie lilie
Litie te pema
Likolo'a bokon'oyo
Économie e'o koma bokonomie
To boyi to bika na bokono
Kasi to kufa na nzala
Po bokono e za to mikosa te
Kasi nzala p'e za
Awa to latisi zolo na monoko masque
Kasi estomac e lati masque te
To bombami na ba ndako
Kasi libumu e'a confiné te
Ko fanda na ndako p'e sengaka mwinda
Po mwa Tv ngonga e leka
Kasi wapi courant
E'o sa'a mabe penza
Po Na ko kima bokono
E sengi to sokola maboko
Kasi mayi nde likambo
Bo tika te courant
Mayi
Nzala
Mpiaka na Corona e sangana
[Refrain]
Mpiak'Corona
Mpiak'Corona
Mpiak'Corona
Mpiak'Corona
[Couplet 3]
Misusu ba'obi oh bokono'ango e'a te
Lokuta
Ndeko keba
To yebi y'o beta tembe na nionso
Kasi mibatela
To tika nionso na maboko'a Nzambe
Ba'oki'o kanga ndako'a Nzambe
Kasi losambo te
Pe yo ndeko ba sengi to sukola maboko
Kasi ba pekisi mapeka te
Nzoto na monoko te
Hey
[Animation]
Monsieur le Poèsident Yeking
Qu'est-ce qu'on dit
Lavez-vous les mains (×4)
Toussez au coude (×4)
Gardez distance (×4)
Ne vous serrez plus les mains (×4)
Lavez-vous les mains (×4)
Papier ou moucher
Jetez aux poubelles (×2)
Lavez-vous les mains (×4)
Portez les masques ou restez chez vous (×2)
Hey
Applaudissez pour le corps médical
(Héros)
Faimrona Virus
Bo sukoli maboko kasi mitema te hein
Cœur Haineux Virus
Monsieur le Poèsident
Afroslam
Yeking
(Toussotement)