Paroles de la chanson MOTEMA de BENI KIBALA
Par | Le mardi, 07 juillet 2020 à 11:45 | Commentaires (0) | LYRICS 243
Découvrez les paroles de la chanson MOTEMA de l'artiste musicien chrétien congolais, BENI KIBALA, évoluant en Europe.
Artiste: Béni Kibala
Titre : Motema
Durée: 5' 11"
Album:
Année: 2020
Pays: Angleterre / RD Congo
[Intro]
Motema na nga e za na kimia
Po e yebi ete yo nde o za mokeli
Pe mokonzi na ngayi
Aah na ko banga lisusu nini
Po na za na yo
Po y'o za na nga
[Couplet 1]
Motema na nga sepela
Motema na nga zala na esengo
Po y'o ndimaki ko yamba mokonzi Yesu
A vandaka na kati na yo libela
Motema na nga sepela eh
Motema na nga zala na esengo
Po y'o ndimaki ko yamba mokonzi Yesu
A vandaka na kati na yo libela
Bolingo na Yesu e leki monene
Motema na nga yoka eh
Ko zala na Yesu e leki nde esengo
Pe lobiko na yo eeeh
Ko tingama na ye e zali nionso e koki po na bomoyi ya moto
Motema na nga sepela
Yo bomoyi na nga sois dans la joie ah aaah
Mingi ba kutana na mbongo ba sepela
Sima ya mwa tango ba koma babola
Mingi ba mataka
Ba komaka solo bakonzi
Lelo ba koma ko seka bango eeeh
Ayi motema na nga sepela eeeh
Motema na nga zala na esengo
Oyo kutani na ye a za Nzambe
Mokeli na nionso eh eeeh
A pesi yo bomoyi ya seko
A limbisi mabe na yo nionso
A mema ba pasi na yo na ekulusu
A pambola yo na nionso
Yeba kuna na lola eh eeeh
Motema na nga sepela eeeh
Motema na nga sois dans la joie
Baye ba landaka mokili ba zala déçus
Kasi oyo a landi Masiya
A ko yokisama soni ata mokolo moko te
Motema na nga sepela eeeh
Motema na nga sois dans la joie
Motema na ngayi eh
Motema eh eeeh
[Chœur]
A latisa nga
Bilamba ya pembe na koma mosantu
(A kotisa nga na libota na ye ya Bonzambe)
A kotisa nga
Na libota na ye
Na koma mwan'a mokonzi
(Nga na pambolama kuna na lola eh na lola eeh)
A pambola nga
Na mapamboli nionso kuna na lola aah
(Condamnation na nga a mema yango kuna na ekulusu)
Condamnation na nga
A longola yango na nguya na ye eh eh eeeh
[Couplet 2]
Motema na nga sepela
Motema na nga sois dans la joie
Motema na nga eh
Motema na nga
Motema na nga eh
Motema na nga
Oy'o kutani na ye
A zali Nzambe
Yo pe mwana na ye
Ko bosana te
O za Nzambe eh eeeh
Motema na nga eh
Motema na nga
Motema na nga eh
Motema na nga
Motema na nga eh
Motema na nga
Motema na nga sepela eh
Motema na nga sois dans la joie
Ah yo motema eeeh
Iiiiiiiiiiiiiiiiiiih
[Chœur]
A latisa nga
Bilamba ya pembe na koma mosantu
A kotisa nga na libota na ye
Na koma mwan'a mokonzi
(Ih ih ih iiiiiiiiiiiiiiiiiiih)
A pambola nga
Na mapamboli nionso kuna na lola ah aaah
(Condamnation na nga eh a mema eeeh)
Condamnation na nga
A longola yango na nguya na ye eh eeeeeeeh eeeeh
by Lyrics243